Kinsásá
Artíclɛ ya Wikipedia.
|
||||
---|---|---|---|---|
Esé | Kongó-Kinsásá | |||
Engumba Mokonzi | La Gombe | |||
Moyángeli | M. Baudouin Liwanga | |||
Nkótá ya ekólo | Lingála | |||
Etando | 9 965 km² | |||
Mito estimée | 7 500 000 hab. (2005) |
|||
Bato na etando | 752,63 hab./km² | |||
ISO 3166-2 | CD-KN | |||
Badepité | 59 | |||
Localisation | ||||
Komini mpé Territoires - Bingúmba - Bitúká |
Mbóka tǒ engumba Kinsásá —ekokí kotangema Kinshásá tǒ Kisásá— (eye eyébénákí kala o nkómbó Léopoldville) ezalí mbóka-mokonzi ya Kongó-Kinsásá. Ezalí mpé etúká (province) ya ekólo êná. Ezalí engumba monɛ́nɛ, na efúku 8 ya bato (est.). Elɔngɔ́ na nyɔ́nsɔ óyo, Kinsásá ezalí engumba ya míbalé na bingumba nyɔ́nsɔ ya mokili, na elobelí lifalansé, na sima ya engumba Pari (Falansia), mpé ezalí o káti ya bingúmba minɛ́nɛ koleka ya Afríka o nsé ya Sahara.
Etápe |
[kokoma] Mambí ma mabelé
Ekútání na mabelé o loboko-ya-mwǎsí ya Ebale ya Kɔ́ngɔ. Na yangó etálání pɛnɛ-pɛnɛ mpénza na Brazzaville, mbóka-mokonzi ya Republiki ya Kɔ́ngɔ tǒ mpé Kongó-Brazzaville. Kinsásá ekútání na 4°16' Sud, 15°17' Ɛ́sita (-4.2667, 15.28333).
Bisíká minɛ́nɛ ya êná engumba :
- Cité de l'OUA, ndáko ya Bulamatari ya Kongó-Kinsásá
- Matonge, óyo eyebaní mokili mobimba mpɔ̂ na malɛki-butu na yangó
- Komini ya Gombe.
Engumba óyo ezalí na mǎto ya ebale tǒ mpé baferry na esɛ́mɛlɔ ya Beach Ngobila mpɔ̂ na kokɛndɛ Brazzaville na Bangi, na nzelá-masíni ’te na Matadi, elongo na Aleopori ya Ndjili.
Bilóko minɛ́nɛ óyo emɔ́nɔnɔkɔ míngi ezalí Buludingi ya SOZACOM, Hotel Inter-Continental na Hotel Memling, Zándo monɛ́nɛ ya Kinsásá, Mizé ya Kinsásá na Académie des Beaux-Arts. Bulevale ya 30 Juin ndé ekangasí biténi nyɔ́nsɔ ya êná engumba.
[kokoma] Bato
|
|
||||||||||||||||||||||||||||||||||||
Source: Populstat, World Gazetteer |
[kokoma] Lisapo
- Bonkámá ya 16–19, nzinga ya Malebo Pool ezalí na zándo tǒ wɛnzɛ inɛ́nɛ, bato batɛ́kɛ́kí mpé batɛ́kísákí míngi mpɛ́mbɛ́, bilɔ́kɔ mpé baúmbu.
- 1881 «traité de l’amitié» (Henry Morton Stanley na Ngaliema)
- 1898 Nzelá-masíni ya Matadi (CFC)
- 1929 mbóka-mokonzi ya Kɔ́ngɔ-Bɛlɛzi (1929-1960) na ya Republiki ya Kɔ́ngɔ (1960-1966)
- 1966 Lipopo akómí « Kinsásá » o mokɔlɔ 30 ya sánzá ya motóbá
[kokoma] Molungé mpé mbúla
Min. (°C) |
Max. (°C) |
Pluie (mm) |
|
---|---|---|---|
yanwáli | 21 | 31 | 135 |
febwáli | 22 | 31 | 145 |
mársi | 22 | 32 | 196 |
apríli | 22 | 32 | 196 |
máyí | 22 | 31 | 159 |
yúni | 19 | 29 | 8 |
yúli | 18 | 27 | 3 |
augústo | 18 | 29 | 3 |
sɛtɛ́mbɛ | 20 | 31 | 30 |
ɔkɔtɔ́bɛ | 21 | 31 | 119 |
novɛ́mbɛ | 22 | 31 | 222 |
dɛsɛ́mbɛ | 21 | 30 | 142 |
* Sources : BBC Weather |
[kokoma] Bilílingi
[kokoma] Nkásá-web o libándá Wikipedia
- Carte détaillée de Kinsásá
- Carte de la ville de Kinsásá (2001)
- Carte de Léopoldville (1960)
- Carte de Léopoldville (1954)
- Photos de Léopoldville
- Photos de Kinsásá 2005
- Photos de Kinsásá / Léopoldville
[kokoma] Tálá mpé
|
|||
Bandalungwa | Barumbu | Bumbu | Gombe | Kalamu | Kasa-Vubu | Kimbanseke | Kinsenso | Kinsásá | Kintambo | Lemba | Limete | Lingwala | Makala | Maluku | Masina | Matete | Mont Ngafula | Ndjili | Ngaba | Ngaliema | Ngiri-Ngiri | Nsɛlɛ | Selembao |
|
|||
Bandundu · Bas-Congo · Ekwatéli · Kasai-Occidental · Kasai-Oriental · Katanga · Kinshasa · Maniema · Nord-Kivu · Etúká ya Monyɛlɛ · Sud-Kivu |